Matondo-文本歌词

Matondo-文本歌词

Mike Kalambay
发行日期:

Hum! Matondo

Nazo luka ba reconnaissants, baya topesa na Nzambe matondo

Nini yango toza nango na mokili oyo ya nse, ewuti na Nzambe te

Pema ya bomoyi, mituka, mapango, molato, mibembo, tozui ya ofele

Nani azo ndima que azalaka elembo ya ngolu eh

Nani wana azo ndima que azalaka mbuma ya ngolu ya Nzambe,

Atombola ata mosapi tomona ye

Nga yeyo ! Nga yeyo !

Pesa ye Matondo, Matondo

Bakisa lisusu, Matondo

Libala oyo ba mingi baluka na ba sacrifices

Luzizila, Mangengenge, Intendance

Ozui yango na pete omitunaka ata te, ofuta lomeya na nani

Eza pona kitoko eh ? Na ndimi te

Oyayaya yeh

Est-ce que eza pe pona ba mbongo eh ? Vraiment na ndimi te

GO !

Asali yo bolamu ebele, emonani na miso

Est-ce que opesi ye ata merci ya Pamba eh, pesa ye Matondo

Asali yo bolamu ebele, emonani na miso

Han ! Est-ce que opesi ata merci ya pamba eh, pesa ye Matondo

Han ! Kasi pesa ye Matondo, Matondo

Eh yah ! Bakisela ye lisusu, Matondo

Mosusu ye wana na ba poudre na mutu, natuni bayebisi ngai alongi eh

Na minerval ya pasi, syllabus ya pasi, bakisela ye ligne onze epayi

Ye wana alongi eh, hé ! Mokonzi opesi ye diplôme eh, muana etike alongi eh ye ye

Ba mingi bakatani, ye alongi eh na ngolu, na ngolu,

Apesi yo Matondo, Matondo

Han ! Abakiseli yo lisusu uh, Matondo

Music !

Uh !

Célébrez !

Mais c’est très simple que ça, dis tout simplement merci

Matondo, Aksanti, Tuasakidila

Je ne peux pas le nier, mon Jésus tu m’as fait du bien

Comment ne pas dire merci à celui qui est tout pour moi

Alors voici ma reconnaissance pour tous tes bienfaits

Seigneur reçois des cris de joie Wuuuuuuu …

Nzambe ya ba nzela ebele, ebele

Nga ko relations te, expérience kutu koloba te

Hé ! Hé ! Hé ! Nasituka boye ! Promotion

Bayama namati ba niveaux, ekomi ti ba changer nga bureau eh

Hé nga namati ba grade eh, ba nommer nga, kombo ebimi na journal officiel eh,

Officiel eeh

Han ! Napesi yo Matondo, Matondo, Matondo

Biso nionso toloba Matondo

Oh yayaya

Osali nga bolamu ebele, emonani na miso

Nalingi napes’o ata merci ya Pamba eh, napesi yo Matondo

Osali nga bolamu ebele trop, emonani na miso

Naye naloba ata thank you Papa oh, napesi yo Matondo

Osali ya mingi to decidé lelo tomemela yo loyembo

Oh oh oh oh oh oh

Matondo a manza ntenta Matondo, Matondo

Moto okufela na ekulusu, azongiseli yo Matondo, Matondo

Nga yeyo balingaki bakunda vivant, napesi yo Matondo, Matondo

Opakoli nga mafuta n’o ya sika, tala nangali lisusu uh, Matondo

Ololololo

Onana nananana

Masiya kumama eh lele

Yahwe kumama

Masiya kumama eh yo

Han ah Yahwe kumama

Nkolo Yesu Mokonzi, Mokonzi na ngai, Ah kumama eh lele

Yahwe kumama

Ya Yesu Mokonzi ya bomoyi ya basantu kumama eh yo

Han ah Yahwe kumama

Hei ! Masiya kumama eh lelele

Yahwe kumama

Tombwama, tombwama, tombwama, tombwama kumama eh lele

Han ah Yahwe kumama

Merci Jésus

Pour tout, je dis merci

Hum !

Osali nga bolamu ebele, ndima napes’o ata merci ya pamba eh

Yesu osali nga bolamu ebele